Ah Nkolo Yawe, lokola nde ekokaki te na miso na Yo, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo ! Ah Nkolo Yawe, boni, ezali boye nde osalaka mpo na bato ?
Osepeli sik’oyo kopambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te ezali Yo, Yawe, nde opamboli yango, mpe epambolami mpo na libela. »
Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »
Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, na Botsira, na bilamba ya motane ? Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, oyo azali kotambola lokola elombe, mpo ayebi ete azalaka makasi ? « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, natonda na nguya mpo na kobikisa. »
Sima na Yesu koloba bongo, atombolaki miso na Ye na Likolo mpe abondelaki : Tata, tango ekoki ; monisa nkembo ya Mwana na Yo mpo ete Mwana mpe amonisa nkembo na Yo ;
Tala likambo oyo eleki motuya kati na makambo oyo tozali koloba : tozali solo na Mokonzi se moko ya Banganga-Nzambe, Mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe kati na Likolo.