Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi.
Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »
Tika ete kombo na ye ewumela libela na libela, ewumela tango nyonso moyi ekozala, mpo ete bato bakoma kotangaka kombo na ye wana bakobanda kopambolanaka, mpe bikolo nyonso ekoma kobengaka ye : moto ya esengo.
Ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe ; bakolatisa ye bilembo ya lokumu, mpe akovanda na kiti ya bokonzi mpo na kokonza. Mpe wana kaka na kiti na ye ya bokonzi, akozala mpe Nganga-Nzambe. Bongo misala nyonso mibale, ezala ya bokonzi to ya bonganga-Nzambe, ekotambola malamu. › »