Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 21:3 - Mokanda na Bomoi

3 Okokisi posa ya motema na ye mpe opimeli ye te oyo azalaki kosenga Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 21:3
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.


Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda. Bayebisaki Davidi ete ezali bato ya Yabeshi ya Galadi nde bakundi Saulo.


Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele.


Davidi alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Bamonaki ete esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango.


Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, telema mpe yaka na esika na Yo ya bopemi, Yo elongo na Sanduku ya nguya na Yo ! Oh Yawe Nzambe, tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata lobiko lokola elamba ; mpe tika ete basantu na Yo basepela na boboto na Yo !


Moto makasi mpe moto mike-mike ebimaka na monoko na yango.


akangolaki ngai wuta na maboko ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, pamba te balekaki ngai na makasi.


Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso.


Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta, oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu, oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo na nzela ya songisongi.


Nzambe, ozali makasi na ngai, nakotalela Yo ; ozali ebombamelo na ngai,


Nani apesaki Nkolo eloko mpo ete Nkolo azongisela ye ? »


To mpe boni, okanisi ete ozali kotiola bomengo ya boboto, ya kokanga motema mpe ya bolamu na Nzambe, wana ozali kobosana ete boboto na Ye ememaka yo na kobongola motema ?


Tika ete lokumu epesamela Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.


Kasi tala makambo oyo tozali komona : Yesu oyo akitisamaki na se ya ba-anjelu mpo na mwa tango moke, alati sik’oyo motole ya nkembo mpe ya lokumu mpo ete andimaki pasi oyo ememaki Ye kino na kufa. Na bongo, na ngolu ya Nzambe, Yesu akufaki nde mpo na bato nyonso.


Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi.


Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ