12 Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;
Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, eloko nini ngai nasali Yo ? Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ? Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ?
Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki na nzela ya mvula ya mabanga mpe makala ya moto.
Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
Kasi obwaki biso, oyokisi biso soni mpe ozali lisusu kotambola te elongo na mampinga na biso.
Solo, oyebi motango ya matambe ya bomoi na ngai ya mitelengano. Sopa mpinzoli na ngai kati na mbeki na Yo, oyo ezali buku na Yo ya ekaniseli.
Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka : « Toselingwi na mabongisi na biso ! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.
Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.
Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !
Abendaki tolotolo na Ye mpe akomisaki ngai esika na Ye ya kobamba makonga.