10 Tango okomimonisa, okokomisa bango lokola fulu ya moto. Yawe akosilisa koboma bango na kanda na Ye, mpe moto ekozikisa bango.
Moto oyo alingi kosimba yango asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga ; batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. »
Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili.
mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe.
Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda !
pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.
Okotikala kosangana na bango te kati na kunda, pamba te obebisaki mokili na yo mpe obomaki bato na yo. Bakotikala lisusu kotanga te bakombo ya bakitani ya bato mabe.