Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 20:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bango, bafukamaka mpe bakweyaka ; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 20:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai. Yoka libondeli na ngai.


Bino bikuke, botombola mitondo na bino ! Bino bikuke ya kala, bomitombola ! Tika ete Mokonzi ya nkembo akota !


Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.


Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango ; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.


Oh Yawe, yoka maloba na ngai, sosola tina ya kolelalela na ngai.


Nzokande, Yo Nzambe, ozali Mokonzi na ngai wuta kala ; Yo nde omemaka lobiko kati na mokili.


basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : bapumbwaka likolo lokola bampongo, bapotaka mbangu mpe bapemaka te, batambolaka mpe balembaka te.


Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! »


Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ