Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 20:7 - Mokanda na Bomoi

7 Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 20:7
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki bampunda nkama sambo oyo ezalaki komema bashar mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda. Davidi abetaki mpe Tsobaki, mokonzi na bango ya mampinga, mpe akufaki wana.


Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario.


Basoda ya Isalaele bakimaki liboso ya basoda ya Yuda, mpe Nzambe akabaki bango na maboko ya basoda ya Yuda.


Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki.


Mokonzi oyo ya Asiri azali kaka na nguya ya bomoto ; kasi biso, tozali elongo na Yawe, Nzambe na biso, oyo akosunga mpe akobundela biso bitumba. Boye bato batiaki elikya na maloba oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alobaki.


Okotia solo elikya na yo kati na yango, mpo ete makasi na yango ezali monene ? Okotikela yango mosala na yo ?


Yawe azali makasi ya bato na Ye, ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.


Bana na yo ya mibali bakozwa esika ya bakoko na bango ; okotia bango bakambi kati na mokili mobimba.


Mpunda ebongisama mpo na mokolo ya bitumba, kasi elonga ewutaka na Yawe.


Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; › solo, bokokima nde ! Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; › solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu !


Mawa na bato oyo bazali kokende na Ejipito mpo na koluka lisungi, oyo bazali kotia mitema na bampunda, oyo bazali kotia elikya na bashar mpo ete ezali ebele, mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te mpe balukaka lisungi epai na Yawe te !


Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, oyo ayekamelaka eloko ya pete mpe atalelaka Yawe te, alakelama mabe !


Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.


Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ