Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 20:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 20:6
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okoyoka libondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo ! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka mpe limbisa !


yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.


Yo oyo obikisaka mpe okangolaka, na nzela ya loboko na Yo ya mobali, bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.


alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.


Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo ; nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.


Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.


Yawe azali makasi ya bato na Ye, ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.


Kasi Yo, Yawe, yokela ngai mawa mpe telemisa ngai mpo ete nazongisela bango mabe na mabe.


mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ; tango okosenga lisungi, akoloba : ‹ Ngai oyo. › Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, otiki kolakisa bato mosapi mpe otiki maloba mabe ;


Tala wuta na likolo mpe mona wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ?


Ekolo na ekolo ekotambola na kombo ya nzambe na yango, kasi biso tokotambola na Kombo na Yawe oyo azali Nzambe na biso, mpo na libela.


Tala ndenge nini bosengeli kosambela : ‹ Tata na biso, Yo oyo ozali kati na Likolo ; tika ete Kombo na Yo ebulisama,


Sima na loboko ya mobali ya Nzambe konetola Ye, azwaki epai ya Tata, Molimo Mosantu oyo Ye Tata alakaki, mpe asopeli biso Molimo Mosantu yango ndenge bozali komona mpe koyoka sik’oyo.


Boye, tika ete bato nyonso ya Isalaele bayeba na bosolo ete Nzambe akomisi Yesu oyo bobakaki na ekulusu Nkolo mpe Klisto.


tika ete, bino nyonso mpe bato nyonso ya Isalaele, boyeba ete ezali na Kombo na Yesu-Klisto ya Nazareti nde moto oyo atelemi liboso na bino na nzoto kolongono ; kaka Yesu oyo bino bobakaki na ekulusu, kasi Nzambe asekwisaki Ye kati na bakufi.


Ezali Ye nde Nzambe atomboli na nzela ya loboko na Ye ya mobali lokola Mokonzi mpe Mobikisi, mpo ete bana ya Isalaele bakoka kozwa nzela ya kobongola mitema mpe kozwa bolimbisi ya masumu na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ