Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo.
Na mokolo wana, bakoloba : « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; tika ete tosepela mpe tozala na esengo mpo na lobiko oyo apesi biso ! »
Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.
Davidi alobaki na moto ya Filisitia : — Ozali koya kobundisa ngai na mopanga, na likonga ya monene mpe na likonga ya moke. Kasi ngai nayei kobundisa yo na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya mampinga ya Isalaele, oyo yo ozali kotiola.