Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 20:4 - Mokanda na Bomoi

4 Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 20:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh mokonzi, napesi yo nyonso ! Orina alobaki lisusu na mokonzi : — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, ayamba malamu bambeka na yo !


Na ngambo na ye, mokonzi Salomo apesaki na mwasi mokonzi ya Saba biloko nyonso oyo azalaki na yango posa mpe oyo asengaki, koleka kutu biloko oyo amemelaki mokonzi. Sima na yango, mwasi mokonzi ya Saba azongaki elongo na basali na ye, na mokili na ye.


akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye, ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.


Yawe, mokonzi azali kosepela na nguya na Yo; Tala ndenge nini elonga oyo opesi ye epesi ye esengo monene !


Komisa Yawe bilengi na yo ya makasi, mpe akokokisela yo posa ya motema na yo.


Baposa ya moto ya sembo esukaka kaka malamu, nzokande elikya ya moto mabe ezelaka kaka kanda ya Nzambe.


Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.


Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso ; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai. »


Na mokolo yango, bokopesa Ngai lisusu ata motuna moko te. Nazali koloba na bino penza ya solo : Tata akopesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Kasi mwasi na ye azongisaki : — Soki Yawe asepelaki koboma biso, akokaki kondima te mbeka ya kotumba mpe mbeka ya gato oyo esalemi na maboko na biso to kolakisa biso makambo oyo nyonso to mpe koyebisa biso sik’oyo makambo oyo.


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ