Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Abelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ye na moto oyo ewutaki likolo mpe ekweyaki na etumbelo ya bambeka.
Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo ; ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, mpe nakongengisa Tempelo na nzela ya nkembo na Ngai.
Moto ebimaki liboso ya Yawe mpe ezikisaki na etumbelo, mbeka ya kotumba mpe biteni ya mafuta. Mpe tango bamonaki bongo, bagangaki na esengo mpe bakweyaki bilongi na bango kino na se.
Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.