8 Senga Ngai, mpe nakokomisa bikolo libula na Yo, basuka ya mokili bozwi na Yo.
Babola bakolia mpe bakotonda ; bato oyo balukaka Yawe bakosanzola Ye. Tika ete bozala na bomoi libela na libela.
Tika ete akonza longwa na ebale moko ya monene kino na ebale mosusu ya monene, longwa na ebale Efrate kino na suka ya mokili.
Nzambe, telema, sambisa mokili ; pamba te bikolo nyonso ezali libula na Yo.
Akobelela ngai boye : ‹ Ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai, Libanga mpe Mobikisi na ngai ! ›
Kati na bimoniseli na ngai ya butu, namonaki moto moko lokola Mwana na Moto koya elongo na mapata ya likolo ; apusanaki pene ya Mpaka oyo azala liboso ya tango, mpe bamemaki ye liboso na Ye.