« Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.
Boye, nakokende epai ya bakambi na bango mpe nakoloba na bango, pamba te bango nde basengeli koyeba nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. » Kasi bango nyonso, na motema moko, babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo.
Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »