Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 19:9 - Mokanda na Bomoi

9 Mitindo ya Yawe ezali alima, esepelisaka motema ; malako na Ye ezali peto, epesaka bososoli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 19:9
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.


Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango : — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi.


Nayebi te esika nini Molimo na Yawe akoki komema yo tango nakotika yo. Soki namemi sango epai ya Akabi, kasi ye amoni yo te, akoboma ngai. Nzokande ngai, mosali na yo, natosaka Yawe wuta bolenge na ngai.


Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.


Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe ; atiolaka banguna na ye nyonso.


Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.


Akopambola bato oyo batosaka Yawe kobanda na bato pamba kino na bato minene.


Esengo na bato oyo bazangi pamela mpe batambolaka kolanda mibeko ya Yawe !


Nalapaki ndayi oyo mpe nakokokisa yango : « Nakotosaka mibeko ya bosembo na Yo. »


Malako na Yo ezali libula na ngai mpo na libela, esalaka esengo ya motema na ngai.


Bosembo na Yo ekotikala bongo mpo na libela, ekotikala kobongwana te ; mpe mibeko na Yo ezali solo.


Longola mosika na ngai soni oyo nabangaka, pamba te mibeko na Yo ezali malamu.


Na kati-kati ya butu, nalamukaka mpo na kokumisa Yo likolo na mibeko na Yo ya sembo.


Nakosanzola Yo na motema ya sembo wana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.


Yawe, nayebi malamu ete mibeko na Yo ezali sembo, mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yo nde obetaki ngai.


Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo.


Asakolaki liloba na Ye epai ya Jakobi, mibeko mpe malako na Ye epai ya Isalaele.


Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.


Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.


Yawe alobaki na Moyize : — Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele :


Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.


Oh Yawe, tango totambolaka na nzela oyo mibeko na Yo etalisaka, totalelaka Yo ; Kombo na Yo mpe kotatola yango, yango nde posa ya mitema na biso.


Nalobaki na nkuku te, kati na esika moko te ya molili ya mokili ; nalobaki te na bakitani ya Jakobi : ‹ Boluka Ngai kati na pamba ! › Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, nasakolaka oyo ezali alima.


Bato yango bazongisaki : — Towuti epai ya Kornei, mokonzi ya basoda ; azali moto ya sembo mpe atosaka Nzambe, mpe Bayuda nyonso bazali kotatola bolamu na tina na ye. Anjelu ya bule ayebisaki ye ete abengisa yo kati na ndako na ye mpo ete ayoka makambo oyo ozali na yango ya koloba na ye.


Yango wana, sosola malamu boboto mpe kanda na Nzambe : kanda epai ya bato oyo bakweyi, mpe boboto epai na yo soki ozali kokoba kowumela kaka na bolamu yango. Soki te, yo mpe okokatama.


Nzokande, toyebi malamu ete Nzambe asambisaka kolanda bosolo bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana.


Mpe ekolo nini mosusu ya monene, oyo ekoki kozala na mitindo mpe mibeko ya sembo lokola Mobeko oyo natie lelo liboso na bino ?


Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.


Bongo nayokaki etumbelo koloba : « Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo ! »


pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. »


Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ