8 Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo ; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo ; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.
Pamba te, na nzela ya Mobeko, ngai nasilaki kokufa na oyo etali Mobeko mpo ete nakoka kobika bomoi na ngai mpo na Nzambe. Nabakamaki na ekulusu elongo na Klisto ;
Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango.
Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.
Okozala na esengo na feti yango : yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo.