6 Moyi yango ebimaka na tongo ndenge elenge mobali oyo abali sika abimaka na shambre na ye, mpe ndenge elombe atambolaka na elikya ya kolonga na momekano.
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.
Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi lokola moyi ya midi ! Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei.