5 Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba, maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili. Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.
Nakosepela makasi kati na Yawe, molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, ndenge mobandami ya mobali alataka motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.
Lokola elenge mobali abalaka moseka, bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ; lokola elenge mobali asepelaka na mobandami na ye ya mwasi, Nzambe na yo mpe akosepela na yo.
Mwasi ya libala azali ya mobali oyo abali ye ; mpe moninga ya mobali oyo asili kobala, ezali moto oyo atelemi pembeni na ye mpe azali na esengo makasi tango azali koyoka mongongo na ye. Ezali mpe bongo mpo na ngai : esengo na ngai ezali sik’oyo ya kokoka.