2 Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe, mapata elobaka misala na Ye.
Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! »
Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo.
Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. »
ezala bilenge mibali to bilenge basi, ezala bampaka to bana mike !
Bokumisa Yawe ! Bokumisa Nzambe kati na Esika na Ye ya bule, bokumisa Ye kati na likolo na Ye ya monene epai wapi avandi na nguya makasi !
Moyi ezali ya Yo, butu mpe ezali ya Yo ; Yo nde osalaki sanza mpe moyi.
Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,
Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo.