Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, Mosantu ya Isalaele, alobi : « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso ya Babiloni lokola bakimi, ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga mpo na bamasuwa na bango.
pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.
Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.
Mpe bayembaki nzembo ya sika : « Obongi na kozwa buku mpe kobuka bikangelo na yango, pamba te babomaki Yo ; bongo na nzela ya makila na Yo, osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, ya nkota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya mabota nyonso.