10 Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.
Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo.
Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.
Yango wana nalingaka mibeko na Yo koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ;
Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki na monoko na Yo ezali malamu koleka biloko nkoto moko ya wolo mpe ya palata.
Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba, nakotombola maboko na ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.
Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi, pamba te ezalaka kitoko ! Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala elengi na lolemo na yo.
Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko.
Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi ; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai.