Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele ; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.
Ye oyo mongongo na Ye eningisaki mokili na tango ya kala apesi lelo elaka oyo : « Na mbala oyo lisusu, nakoningisa kaka mabele te, kasi nakoningisa mpe Likolo. »
Solo, mokolo ya Nkolo ekoya lokola moyibi. Na mokolo yango, na lokito monene, Likolo ekolimwa, biloko ekozika na moto mpe ekonyangwama, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekozwa etumbu ya kobebisama na moto.
Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te.