Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:8 - Mokanda na Bomoi

8 Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya bangomba elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:8
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando ; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto.


Emonaka ebende lokola lititi, bronze lokola nzete epola.


Soki atali mokili, mokili elengaka ; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.


Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto ! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.


Loboko na Yo ekokanga banguna na Yo nyonso ; loboko na Yo ya mobali ekokanga bayini na Yo.


Tika ete Nzambe na biso aya ! Tika ete akanga monoko te ! Liboso na Ye, moto makasi ezali kozikisa ; mpe zingazinga na Ye, mopepe makasi ezali kopepa.


Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, mpo na nini kosundola biso mpo na tango nyonso ? Mpo na nini kongalisa kanda na Yo likolo ya etonga oyo oleisaka ?


Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo akokweya na libulu, mpe oyo akoluka kobima kati na libulu akokangama na motambo. Maninisa ya likolo esili kofungwama, makonzi ya mokili ezali koningana.


Ebale ya moto ezalaki kobima mpe kotambola liboso na Ye. Minkoko ya bato bazalaki kosalela Ye, minkoko ya minkoko ya bato batelemaki liboso na Ye. Basambisi bavandaki, mpe babuku efungwamaki.


Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko.


« Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore ; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.


Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.


Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko.


Soki moto moko ameki kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekozikisa banguna na bango. Ezali ndenge wana nde moto nyonso oyo akolinga kosala bango mabe asengeli kokufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ