Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:6 - Mokanda na Bomoi

6 Basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:6
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye, koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.


Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.


Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso ; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.


Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.


Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango.


Obomaka bato oyo balobaka lokuta. Yo, Yawe, oyinaka babomi mpe bakosi.


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Motema na ngai etondi na mawa, mpe somo ya kufa ekangi ngai.


Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.


Nzokande, Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule ; tika ete mokili mobimba ezala kimia liboso na Ye !


Azalaki kobondela : — Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.


Petelo azalaki kati na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende mpo na ye.


Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ