49 oyo akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
Nzembo ya Davidi.
Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.
Yawe, bakonzi nyonso ya mabele bakokumisa Yo tango bakoyoka maloba kobima na monoko na Yo ;
Tika ete lobiko ya Isalaele ebimela na Siona ! Tango Yawe akobongisa bato na Ye, bakitani ya Jakobi bakosepela, mpe Isalaele ekozala na esengo.
Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
Lokumu na ngai, lamuka ! Lindanda mpe nzenze, bolamuka ! Nalingi kolamusa tongo.
Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive.
Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama : « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »
Tala makambo oyo nazali kotinda yo, liboso ya Nzambe oyo apesaka bomoi epai na bikelamu nyonso, mpe liboso ya Yesu-Klisto oyo atatolaki malamu bosolo liboso ya Ponse Pilato :