40 Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
Mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, mokolo oyo mobeko ya mokonzi esengelaki kokokisama, ekokaki. Ezalaki mokolo oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakokonza Bayuda ; nzokande makambo ebongwanaki mpe Bayuda bakomaki kokonza bato oyo bazalaki koyina bango.
Atako bakani kosala Yo mabe, atako basali mabongisi ya mabe mpo na kotelemela Yo, bakotikala kolonga ata moke te ;
Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.