Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:4 - Mokanda na Bomoi

4 Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:4
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba : « Bosanzola Yawe, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! »


Tango kaka babandaki koyemba mpe kokumisa, Yawe atiaki mobulu kati na bato ya Amoni, ya Moabi mpe ya bangomba Seiri oyo bakotaki na Yuda, mpe babomanaki bango na bango.


Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai ; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.


Boye mayi elingaki kozindisa biso, mbonge makasi elingaki komema biso.


Makasi na ngai ekawuki lokola potopoto, mpe nazali kokoka lisusu koloba te ; otie ngai pembeni ya lilita.


Somo makasi ekokweyela bango, pasi mpe kobanga ekotika bango te ; bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. Bango na bango bakotalana na kokamwa mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto.


Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango.


Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.


Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe ebele ya bato oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombangu. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo mpe, mbala moko, bakangaki bikuke na yango.


Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ