Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :
Azali kobatela etonga na Ye lokola mobateli bibwele : kosangisa bana meme na maboko na Ye mpe kokanga bango na tolo na Ye ; kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi oyo ezali nanu komela mabele.
Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo ! Libota nini ekokani na yo, yo libota oyo Yawe abikisi ? Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. Banguna na yo bakokima liboso na yo, mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »
Yo oyo obikisaka mpe okangolaka, na nzela ya loboko na Yo ya mobali, bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.
Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo ; bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo. Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika, bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami.
Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.