« Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te :
Nkolo Yawe azali makasi na ngai : akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko, apesaka ngai makasi ya komata kino na likolo ya bangomba. Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda.