31 Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te ; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
Nani azali Nzambe soki Yawe te ? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ?
Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo.
Nkolo, nzambe moko te ekokani na Yo, kati na banzambe ; moko te ekoki kosala makambo oyo Yo osalaka.
Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te, ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango lokola ebombamelo na bango.
Nazali Yawe, mosusu azali te ; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. Nalatisi yo mokaba na loketo atako oyebi Ngai nanu te ;
Libota ya Isalaele ezali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, nzela na Ngai ezali sembo te ? Boni, ezali te penza banzela na bino nde ezangi bosembo ?
Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ; bango moko banguna na biso bayebi yango.
Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; mosusu azali te ! Nabomaka mpe napesaka bomoi ; nazokisaka mpe nabikisaka. Mpe moto moko te akoki kokangola oyo ezali na maboko na Ngai.
Moko te azali bule lokola Yawe ; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.