Yo oyo obikisaka mpe okangolaka, na nzela ya loboko na Yo ya mobali, bato oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango, lakisa ngai misala kitoko ya bolingo monene na Yo.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Yawe azali lokola Libanga ; misala na Ye ezali ya kokoka, mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; azali sembo mpe alima.
Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! Mokonzi ya bikolo nyonso, banzela na Yo ezali sembo mpe solo.