Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:3 - Mokanda na Bomoi

3 Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ; azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai ; azali nguba na ngai, Mobikisi na ngai, mpe ekimelo na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:3
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.


Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso.


Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe, Libanga na ngai, apambolama ; Ye oyo akembisaka maboko mpe makofi na ngai mpo na bitumba !


Yawe azali monene, abongi na lokumu ; moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.


Nzokande Yo, Yawe, ozali nguba mpe nkembo na ngai, Yo nde omatisaka lokumu na ngai.


Mpo ete ozali libanga na ngai mpe ndako na ngai ya makasi, kamba mpe tambolisa ngai mpo na lokumu ya Kombo na Yo.


Mpe belela ngai na tango ya pasi ; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.


Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango.


Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.


Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai ; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.


Zala mpo na ngai ekimelo ya libanga epai wapi nakoki kokende tango nyonso. Ozwaki mokano ya kobikisa ngai, pamba te ozali libanga mpe ndako na ngai batonga makasi.


Ezali kuna nde abukaki makonga ya makasi, banguba, mipanga mpe bibundeli nyonso ya bitumba.


Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ; nakozala elongo na ye na tango ya pasi, nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.


Nalobaka na tina na Yawe : « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai ; natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »


Pamba te Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, azali somo makasi mpe aleki banzambe nyonso.


Oh Yawe, Makasi na ngai mpe Ndako na ngai batonga makasi, Ekimelo na ngai na tango ya pasi, bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : « Batata na biso bazalaki kaka na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te.


lobiko liboso ya banguna na biso, mpe kokangolama wuta na maboko ya bayini na biso ;


Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »


« Nkolo mpe Nzambe na biso, obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, pamba te Yo nde okela biloko nyonso : ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ