Kasi na ngolu ya Nzambe, nazali oyo nazali lelo ; mpe ngolu na Ye epai na ngai ezali ya pamba te. Kutu, nasalaki mosala mingi koleka bango nyonso ; nzokande, ezali ngai te, kasi ezali nde ngolu ya Nzambe, oyo ezali elongo na ngai.
Asilisaki makasi ya milimo mabe mpe ya nguya ya bakonzi ya molili, asambwisaki yango na miso ya bato nyonso mpe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba tango alongaki yango na ekulusu.
Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.
Davidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga ; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele.