Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:27 - Mokanda na Bomoi

27 Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:27
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Obikisaka banyokolami, otalaka mpe okitisaka bato na lofundu.


Na lolendo na ye, moto mabe alobaka : « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe.


Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.


Bakomisi mitema na bango makasi, mpe bazali koloba na lolendo.


Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango ; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.


Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.


Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.


Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »


Bato mabe, bikolo nyonso, oyo bakanisaka Nzambe te, bakokende na mboka ya bakufi.


Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko, nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.


Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye.


Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


Pamba te boyebi ndenge nini Yesu-Klisto, Nkolo na biso, atalisaki ngolu na Ye epai na biso : Ye oyo azalaki mozwi, amikomisaki mobola mpo na bolamu na bino, mpo ete bokoma bazwi na nzela ya bobola na Ye.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ