Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:21 - Mokanda na Bomoi

21 Yawe asaleli ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afuti ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozafati alandaki nzela oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango ata moke te mpe asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe.


Joziasi alongolaki banzambe nyonso ya bikeko ya nkele kati na bituka nyonso ya bana ya Isalaele. Apesaki mitindo na bato nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele ete basalela Yawe, Nzambe na bango. Na bongo, na mikolo nyonso ya bomoi ya Joziasi, bapengwaki te liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango.


Nakangamaka na mibeko na Yo, pamba te Yo moko nde oteyaka ngai yango.


Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka, nabatelaki kaka maloba na Yo mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.


Nzembo ya Davidi. Yawe, longisa ngai na miso ya basambisi, pamba te natambolaka na bosembo ; natielaka Yawe motema, nakozonga sima te.


Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.


Sik’oyo, mwana na ngai, yoka ngai : Esengo na bato oyo babatelaka banzela na ngai !


Nzambe na ngai atindaki anjelu na Ye mpo ete akanga bankosi minoko ; boye, esalaki ngai mabe ata moko te, mpo ete natambolaki mabe te na miso na Ye, mpe nasalaki mabe ata moko te liboso na yo, mokonzi.


Yango wana, ngai mpe nasalaka tango nyonso makasi mpo na kobatela motema na ngai peto, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato.


Bino moko bozali batatoli, Nzambe mpe azali Motatoli, ete totambolaki na bosantu, na bosembo mpe na kozanga pamela, na miso na bino oyo bozali kondima.


Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.


— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ