Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi mpo na kovandisa yo na esika ya pole, esika oyo ezangi mitungisi ; akotondisa mesa na yo na biloko ya kitoko.
Kasi ngai, nalobaki : « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, nasilisaki makasi na ngai na pamba mpe nazwaki litomba moko te. Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. »
Tala makambo oyo Yawe atatoli kino na basuka ya mabele : « Boloba na Siona, mboka kitoko : ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › »
Boye, Yesu nde azali Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo abongi mpo na biso : azali Bule, asala ata mabe moko te, azali peto, akabwana na bato ya masumu, mpe Nzambe atombola Ye penza likolo koleka Likolo,