Tango pasi ekweyelaka ngai, obatelaka bomoi na ngai, osembolaka loboko na Yo mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai ; mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.
Nakopanza bango liboso ya banguna na bango ndenge mopepe ya este esalaka. Tango bakokoma na pasi, nakopesa bango mokongo mpe nakolakisa bango elongi na Ngai te. »
Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »
Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto. Tango lokolo na bango ekobeta libaku, na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo na bango ekowumela te. »
Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.