Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:16 - Mokanda na Bomoi

16 Yawe, tango ogangelaki yango, na nzela ya pema na Yo mpe ya milinga ya zolo na Yo, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, miboko ya mokili emonanaki na libanda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:16
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi.


Tanda loboko na Yo wuta kuna na likolo mpo na kobikisa mpe kokangola ngai na mayi minene, na maboko ya bapaya


Nanikaka bango lokola putulu oyo mopepe epumbwisaka, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.


Boye, tika ete bayengebene nyonso basambelaka Yo na tango ya malamu ! Soki mayi minene etomboki, bambonge na yango ekozwa bango te.


Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.


Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki : « Nazwaki ye na mayi. »


Agangelaka ebale monene mpe akawusaka yango, akawusaka bibale nyonso. Etuka ya Bashani mpe ya Karimeli esili nyonso kokawuka, mpe matiti nyonso ya Libani esili kokawuka.


Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ