Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › »
kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. Akobeta mokili fimbu na maloba na ye mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye.
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo mpe komona miboko ya mabele, wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele mpo na makambo nyonso oyo basali, » elobi Yawe.
Bino bangomba mpe bino miboko oyo eninganaka te, boyoka likambo oyo Yawe afundeli bato na Ye, pamba te azwi bango na likambo mpe alingi kosamba na Isalaele.
Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.