Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 18:13 - Mokanda na Bomoi

13 Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kokimisa mapata, konokisa mvula ya mabanga mpe kobimisa makala ya moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 18:13
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ?


Kasi na pamela na Yo, mayi ekimaki ; na lokito ya kake na Yo, mayi etiolaki,


Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto ! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.


Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.


akabaki bameme na bango epai ya mvula ya mabanga, mpe bibwele na bango epai ya kake.


Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika


Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo.


Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka.


Bokono oyo ebomaka ezalaki kotambola liboso na Ye, mpe pasi makasi ezalaki kolanda matambe na Ye na sima.


Bato oyo bazalaki wana mpe bayokaki mongongo yango balobaki : — Ezali kake ! Bato mosusu balobaki : — Anjelu moko asololi na ye !


Nakotindela bango nzala makasi, bokono oyo esalaka nzoto moto-moto mpo ete esilisa bango, mpe etumbu oyo ekoboma bango. Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu.


Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.


Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : « Aleluya ! Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, atalisi bokonzi na Ye.


Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela : ezali milimo sambo ya Nzambe.


Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki : bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele.


Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ