10 Yawe afungolaki Lola mpe akitaki ; mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
Opika makonzi na yango na mayi ya likolo, okomisaka mapata shar na Yo, otambolaka na mapapu ya mopepe.
Yawe, fungola likolo mpe kita awa na mabele ! Yaka kosimba bangomba mpe sala ete ebimisa milinga !
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.
Yawe azali kokonza ; tika ete bato balenga ! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe ; tika ete mabele eningana !
Wuta kala, tozalaka bato na Yo ; kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te. Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, bangomba ekoningana liboso na Yo !