Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 17:8 - Mokanda na Bomoi

8 Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 17:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.


Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.


Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya ! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.


Oh Nzambe, yokela ngai mawa ! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo ; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka.


Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.


Posa ya motema na ngai ezali : kovanda tango nyonso kati na Ndako na Yo mpe kozwa ebombamelo na se ya mapapu na Yo.


Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai, nasambelaka Yo na butu ;


Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.


Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye ; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.


Batela mateya na ngai malamu, mpe okozala na bomoi ; batela mibeko na ngai lokola mbuma ya liso na yo.


mpe alobaki na ye : — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !


Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.


Amonaki ye na esobe, kati na mokili oyo ekawuka, etonda na koganga ya somo. Azingelaki ye, abatelaki ye, akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye.


Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ