6 Nzambe na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai. Yoka libondeli na ngai.
Ayokaki ngai ; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.
Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye ; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.
Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi ; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango.
Na mokolo ya pasi na ngai, nabelelaka Yo, pamba te oyanolaka ngai.
Yawe, ozali Nzambe ; Yo nde obikisaka ngai ! Butu mpe moyi, nagangaka epai na Yo !
Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ; Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi.
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. »