Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 17:13 - Mokanda na Bomoi

13 Yawe, telema, kutana na bango mpe bebisa bango ; na nzela ya mopanga na Yo, kangola ngai wuta na maboko ya bato mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 17:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Oh Yawe, telema. Nzambe, sembola loboko na Yo, kanisa babola.


Yawe, tango ya kosala ekoki ; pamba te bazali kobuka mibeko na Yo !


Kasi Yo, Yawe, kozala mosika te ! Ozali makasi na ngai ; yaka noki kosunga ngai.


Nakobanga te atako ebele ya bankoto bazingeli ngai na bangambo nyonso.


Pamba te, likolo na Yo, babomaka biso mikolo nyonso mpe bazwaka biso lokola bameme ya koboma.


Pamba te tokweyi na putulu, mpe nzoto na biso ekangami na mabele.


wana tika ete monguna na ngai alanda mpe akanga ngai, tika ete asakanela bomoi na ngai mpe abebisa lokumu na ngai.


Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe ? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe ?


Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?


Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ; nzete oyo ezali na loboko na ye ezali nde esalelo ya kanda na Ngai !


Bawuti na mikili ya mosika, na suka ya likolo ; Yawe elongo na bisalelo ya kanda na Ye ; mpo na kobebisa mokili mobimba.


Oyoka nanu yango te ? Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; sik’oyo nde nakokisi yango. Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga.


Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! Lata makasi ! Lamuka, lokola na mikolo ya kala, na bileko oyo eleka kala ! Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, oyo obomaki dalagona ?


Boni, ozali Yawe te wuta na ebandeli ? Ozali Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, okufaka te. Oh Yawe, oponaki bango mpo na kosambisa biso ; mpe Yo Libanga na ngai, olendisaki bango mpo na kopesa biso etumbu.


Ezali ndenge wana nde bakokisaki mabongisi oyo osala wuta kala, na nguya mpe na mokano na Yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ