Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 17:1 - Mokanda na Bomoi

1 Libondeli ya Davidi. Oh Yawe, yoka ngai ! Kolela na ngai ezali sembo ! Yoka koganga na ngai ! Landa malamu libondeli na ngai, oyo ezali kobimela te na bibebu ya lokuta.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 17:1
31 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.


Kobanda sik’oyo, miso na Ngai ekofungwama, mpe matoyi na Ngai ekoyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo.


tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.


Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.


Yawe, yoka libondeli na ngai ! Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo !


Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.


Nzembo ya Davidi. Maloba na ye tango azalaki kati na ebombamelo ya mabanga.


Yawe, nagangi epai na Yo ! Nalobi : « Ozali ebombamelo na ngai, libula na ngai kati na mokili ya bato ya bomoi ! »


Yawe, yoka losambo na ngai, landa mabondeli na ngai ! Yanola ngai na boyengebene mpe na bosembo na Yo.


Yawe azali pene ya bato nyonso oyo babelelaka Ye, ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;


Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.


Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.


Oh Nzambe, longisa ngai mpe lobela ngai liboso ya ekolo oyo etosaka makambo na Yo te ; kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe ya bato mabe.


Oh Yawe, yoka maloba na ngai, sosola tina ya kolelalela na ngai.


Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai.


Tongo, midi, pokwa, nasopaka motema na ngai mpe nalelaka, mpe ayokaka mongongo na ngai.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.


Oh Nzambe, yoka koganga na ngai, yoka na bokebi losambo na ngai.


Nzokande, Nzambe ayokaki ngai, ayokaki na bokebi libondeli na ngai.


Tika ete bikolo esangana zingazinga na Yo, kasi Yo, konza bango wuta na Kiti na Yo ya Bokonzi.


Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, yoka losambo na ngai ! Nzambe ya Jakobi, yoka ngai !


Libondeli ya Davidi. Yawe, yoka mpe yanola ngai ; pamba te nazali mobola mpe moto akelela.


Yawe, yoka losambo na ngai, yoka libondeli na ngai !


Tika ete losambo na ngai ekoma epai na Yo ; Yoka koganga na ngai !


Nkolo alobi : « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ; mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango.


Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba ; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe.


« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;


Tango Yesu amonaki Natanaele koya epai na Ye, alobaki na tina na ye : — Tala moto ya Isalaele ya solo-solo oyo, kati na ye, lokuta ezali te !


Balingami na ngai, soki mpe mitema na biso elongisi biso, tokozala kaka na elikya makasi na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ