9 Yango wana motema na ngai etondi na esengo, molimo na ngai ezali kosepela, nzoto na ngai mpe ekopema na kimia.
Nzembo ya Davidi.
Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina ; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
Nzambe, lendisa motema na ngai ; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.
Babenganaka moto mabe mpo na mabe na ye, kasi moto ya sembo awumelaka na elikya kino ata na kufa.
Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo ! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo ; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
Mpo na yo, yika mpiko kino na suka ; okopema mpe, na mokolo ya suka, okosekwa mpo na kozwa litomba na yo.
Yango wana, motema na ngai etondi na esengo, mpe lolemo na ngai ezali kosepela. Solo, nzoto na ngai ekopema na elikya,