Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 16:8 - Mokanda na Bomoi

8 Natalelaka Yawe tango nyonso, pamba te azali pene na ngai mpo ete naningana te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 16:8
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.


Nkolo azali na ngambo ya loboko na yo ya mobali, akopanza bakonzi na mokolo ya kanda na Ye.


Yawe azali mobateli na yo ; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.


Nameki kotanga yango, ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo. Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.


asengaka mileki te soki adefisi mbongo, andimaka kanyaka te mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe te. Moto nyonso oyo atambolaka bongo akotikala kopengwa te.


Mokonzi atiaka elikya na Yawe, aninganaka te mpo na bolingo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.


Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.


Oh molimo na ngai, zwa bopemi kati na Nzambe, pamba te elikya na ngai ewutaka epai na Ye.


Solo, azali libanga mpe lobiko na ngai ; azali ebombamelo na ngai, nakoningana te.


Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo ; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.


Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba ; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.


Mpo na kondima, Moyize abangaki te kanda ya mokonzi mpo na kobima longwa na Ejipito, mpe atikalaki ngwi na mokano na ye lokola nde azali komona Nzambe oyo amonanaka te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ