Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, telema mpe yaka na esika na Yo ya bopemi, Yo elongo na Sanduku ya nguya na Yo ! Oh Yawe Nzambe, tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata lobiko lokola elamba ; mpe tika ete basantu na Yo basepela na boboto na Yo !
Mpe tika ete monoko na yo ezala lokola vino ya kitoko koleka ! Tika ete vino yango esopanela bolingo na ngai na pete, eleka na bibebu ya bato oyo bazali kolala.
Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala.
« Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.