Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 16:10 - Mokanda na Bomoi

10 Oh Yawe, okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi, okotika mpe te ete mosantu na Yo apola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 16:10
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bandelo yango eleki Lola na likolo ; yo penza okosala nini ? Eleki mboka ya bakufi na bozindo ; yo penza okoyeba nini ?


Soki namati na likolo, ozali kuna ; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna.


Bazali lokola bameme mpe babongisami mpo na mboka ya bakufi ; kufa ekokoma kobokola bango. Kala te, bato ya sembo bakonyata bango, kitoko na bango ekonzuluka, mpe mboka ya bakufi ekokoma ndako na bango.


Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo ; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


Ndenge mboka ya bakufi mpe mokili ya mozindo ezali penza polele liboso ya Yawe, ndenge wana mpe mitema ya bana ya bato ezali polele liboso na Ye.


Ndenge lifelo mpe mboka ya bakufi etondaka te, ndenge wana mpe miso ya moto etondaka te.


Mokili ya bakufi, kuna na se, eningani na sango ya koya na yo, elamusi, mpo na koyamba yo, milimo ya bakufi, bato nyonso oyo bazalaki bakambi na mokili, etomboli bango, na bakiti na bango ya bokonzi, ba-oyo nyonso bazalaki bakonzi ya bikolo.


Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi mpe ekofungola monoko na yango makasi ; bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela moko mpe na loyenge na bango.


Eleko moko ya baposo tuku sambo ekatamaki mpo na bato na yo mpe mpo na engumba na yo ya bule, mpo na kosilisa botomboki liboso ya Nzambe mpe kosukisa masumu, mpo na kolimbisa masumu mpe kokokisa bosembo ya libela, mpo na kokangisa emoniseli mpe mosakoli, mpe mpo na kobulisa Mosantu ya basantu.


Soki bozwi matanga, bomikata-kata banzoto na bino te to bomikatisa banzoloko te. Nazali Yawe.


Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi, loboko na Ngai ekobimisa bango kuna ; soki bakimi na Lola, nakokitisa bango na se.


Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe ;


Anjelu azongiselaki ye : — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe.


Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.


— Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo ? Oyei mpo na kobebisa biso ? Nayebi nani oyo Yo ozali : Mosantu ya Nzambe !


Boye, ezali mpe ndenge moko mpo na lisekwa ya bakufi : ekundami nzoto oyo epolaka, kasi ekosekwa nzoto oyo epolaka te ;


Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.


Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.


Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango ; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ