Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 16:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nzembo ya Davidi. Nzambe, batela ngai, pamba te nabombami kati na Yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 16:1
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele. Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.


Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Yawe. Bato oyo batiaka elikya kati na Yawe bazali lokola ngomba Siona oyo eninganaka te, oyo epikama mpo na libela.


Esengo na moto oyo Nzambe ya Jakobi azali mosungi na ye, oyo atiaka elikya na ye kati na Yawe, Nzambe na ye !


Matambe na ngai ezalaka kaka na banzela na Yo, napengwaka te.


Batela ngai lokola mbuma ya liso, bomba ngai na se ya mapapu na Yo,


Bato nyonso oyo bazali komona ngai bazali koseka ngai, bazali kokamwa, koningisa mito mpe koloba :


Batela bomoi na ngai mpe kangola ngai ; sala ete nayoka soni te, pamba te nabombamaka kati na Yo.


Kati na kobanga na ngai, namilobelaki : « Obengani ngai penza mosika na Yo ! » Nzokande oyokaki ngai wana nazalaki kobondela Yo mpe wana nazalaki kobelela Yo.


pamba te Yawe alingaka bosembo, mpe asundolaka te bayengebene na Ye. Babatelamaka mpo na seko, kasi bana ya bato mabe bakolimwa.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Ebenga ya terebente ya mosika. » Nzembo ya Davidi, tango bato ya Filisitia bakangaki ye kati na mboka Gati.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na « Lisi ya litatoli. » Nzembo ya Davidi mpo na koteya bato.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya mawa oyo Davidi ayembelaki Yawe na tina na Kushi, moto ya libota ya Benjame.


Yawe, Nzambe na ngai, nabombamaka kati na Yo ; bikisa ngai mpe kangola ngai liboso ya bato nyonso oyo balukaka koboma ngai.


Pamba te, mpo na biso, Yawe Nzambe azali moyi mpe nguba ; Yawe apesaka ngolu mpe nkembo, aboyaka kopesa eloko moko te epai ya bato oyo batambolaka bazanga pamela.


Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.


Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe ! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.


Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.


Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.


Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ