Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Banzembo 150:5 - Mokanda na Bomoi

5 Bokumisa Ye na lokito ya manzanza ! Bokumisa Ye na lokito ya bangongi minene !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Banzembo 150:5
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza.


Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela makasi na liboso ya Nzambe, na koyemba mpe na kobeta mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, manzanza mpe bakelelo.


Davidi alobaki na bakambi ya Balevi ete bapona, kati na bandeko na bango, bayembi mpo na koyemba banzembo ya esengo, na bibetelo mindule : nzenze, lindanda mpe manzanza.


Babeti miziki : Emani, Azafi mpe Etani ; bango bazalaki kobeta manzanza oyo basala na bronze.


Bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na kobeta milolo ya esengo, na kobeta maseke, bakelelo, manzanza, banzenze mpe mandanda.


Azafi azalaki mokambi ; Zakari azalaki molandi na ye ; mpe Yeyeli, Shemiramoti, Yeyeli, Matitia, Eliabi, Benaya, Obedi-Edomi mpe Yeyeli bazalaki kobeta nzenze mpe lindanda ; mpe Azafi azalaki kobeta manzanza.


Na lisungi ya bakonzi ya mampinga, Davidi atiaki pembeni ndambo ya bana mibali ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni mpo na kosala mosala ya kosakola mpe ya kosalela banzenze, mandanda mpe manzanza. Tala bakombo ya bato oyo basalaki mosala yango :


Bango nyonso bazalaki na bokambami ya tata na bango mpo na kobeta miziki na Tempelo ya Yawe mpe kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze ; mpe mpo na kosala mosala kati na Ndako ya Nzambe. Azafi, Yedutuni mpe Emani bazalaki na bokambami ya mokonzi.


Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule : Yawe azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ